Nani aza na thermomètre ya koyeba température ya molimo ya moto
Nani aza na balance ya koyeba kilo ya vie ya moto
Nani aza na mètre oyo ekolakisa molayi ya molimo ya moto ye ye
Nani akoki kotimola libulu molayi po ayeba mozindo ya molimo ya moto
Bobele Yesu
Wapi université oyo eza na mateya ya kokamba vie ya molimo ya moto
Wapi parlement oyo ekoki ko siéger pona ko voter ba lois ya molimo ya moto
Wapi gouvernement oyo eza na ba ministres ya kokamba vie hum ya molimo ya moto
Wapi mboka oyo eza na roi to reine ya kokamba vie hum ya molimo ya moto
Bobele Yesu
Ah, nani aza na site internet ya ko permettre biso to naviguer po toyeba vie spirituelle ya moto
Mosusu okomona ye moto likolo, likolo lokola moto ya masumu
Ye wana Nzambe aza kolinga oh
Mosusu okomana ye akotambola na logome elamba epasuka
Ndeko keba ministre monene oh
(Tuna mikonzi minene bavanda na kiti ya bokonzi bawuta wapi eh?)
Okomona babeteli yo porte basengi yo mayi ya komela
Ndeko koboya te
Basusu babengana ba anges na porte na bango
Yesu soki afongoli yo miso y'omona vie ya moto
Okoki kofukamela ye, ah ngai oh
Bible eloba éthiopien a changaka peau na ye te oh
Léopard a changaka pe ba tâches na ye te oh
Lelo moninga pamba oyebi lobi na ngai te, Yesu azomona ngai moto monene
Ah ngai oh
Yo moninga malade Yesu azomona bien
Yo moninga mobola Yesu azomona ngai riche
Likolo ya ba sentiments na yo, obengi ngai moto na masumu
Ah ye ye ye oh ndeko eh
Ko juger ngai te oh (Ko juger ngai te)
Ko préjuger pe ngai te oh
Oyebi lobi na ngai te oh, oyebi pe vie na ngai te
Nani yango akotombola libanga abamba mwasi oyo akweyi na ekobo eh?
Eh likambo yango nini lelo basali ya Nzambe
Nzambe moto atia bango na eklezia na ye
Mikumba oyo bamemaka soki bapesi ndeko okokoka te
Babengaka bango ba fous na kati ya eklezia eh, ba blessés de guerre
Ba grands coopérants na makambo ya eklezia, bakoko ya suka mboka eh ma
Bilamba epatuama na kati ya eklezia
Marie Magdala asopi malasi na ye ya motuya na makolo ya Yesu
Bato babengi ye ndumba
Nzoka ye nde moto amonaka lisekwa ya Yesu liboso eh
Nakotambola moto likolo, na kobeta tolo
Ndeko na ngai oh ne jugez point
Ne jugez point
Ndeko na nga ne jugez point po ba juger yo te
Ne jugez point
Tika Nzambe a juger basali na ye oh
Tika Nzambe a juger bato na ye eh
Tika Nzambe a juger bana na ye oh