Makambo mosusu bakoka ko expliquer yango te oh

Témoignage mosusu okoyeba ndenge ya kobandela te oh

Likambo yango na Yesu eh, sekele yango na Tata na Mwana eh

Moto na moto na litatoli na ye eh oyo yanga litatoli yango oyo

Nakomaki lokola mwasi aza na zemi

Sanza libwa azobota te oh

Nani akitisa ngai mokumba naza n'ango oh

E collé na ngai na nzoto eboyi kotika ngai ye eh

Nakomaki lokola moto akoti zamba

Abungi nzela ya kobima eh

Nani alakisa ngai nzela po nabima eh

Miso pe ezomona malamu te eh

Somo na ngai lokola esclave aza ko tourner

Tout autour ya maitre na ye

Kino asenga liberté na ye

Po motema na ye efanda kimia

Kombanga na ngai lokola sentinelle

Azozela tongo etana azua kimia

Po mokumba azua na vie na ye

Akengela mpo moyibi akota te

Kombanga lisusu lokola bébé

Azolela tango nionso eh

Bongo maman aluka pasi aza na'ango

Po monganga abikisa mwana eh

Pasi etingami na nzoto eh ma

Wapi mongongo oyo elekisa biloko ngai eh

Nzoto ekomi ko décevoir elamba ya kolata wowo oh

Wapi monoko nakangisa pasi na ngai eh

Nani yango nayebisa bapasi na ngai eh

Avocat aza wapi a plaidé pona pasi na ngai eh

Ah juge aza wapi akatela nga likambo eh

Po pasi eboyi kotika ngai eh

Ah, moyibi to liwa ya nini eyiba to eboma bapasi na ngai etika ngai bomoyi

Soins intensifs ekoma ekomaki mbeto na ngai ya libela eh

Prof nini apesa ngai mateya ya kokima pasi ya molimo eh

Monganga nini asala ngai opération ya pasi ya molimo eh

Motuka pe mpepo nini emema ba pasi na ngai mosika na ngai eh

Masuwa pe lokalo nini ebwaka bapasi na ngai na lubuaku eh

Volcan to mopepe nini eh Yaya eh

Rivière mpe mbonge nini emema bapasi na ngai esika elingi êê

Mafuta to pe savon nini na pakola na longola bapasi na ngai eh

Kiti pe mbeto nini na lala natikela ye bapasi na ngai eh

Eh Yaya eh, Yaya eh, Yaya na ngai eh oh

Ah eh pasi eboyi kotika ngai eh

Bapasi ezingaki ngai nayokaki solo ya liwa yeye

Ngai nakomaki na suka pasi eyokisaki ngai liwa yeye êê

Nzoka Yesu Klisto mosungi ya kokamwa eh

Akufaki pona biso tobika oh ma

Amemaki mikumba na biso mpo tozua liberté

Liberté na ngai, liberté na ngai eh, liberté na ngai eh

Yesu Klisto Liberté na ngai eh ma

Ah Yesu Klisto Liberté ya famille na ngai wowo oh

Ah Yesu Klisto Liberté ya Congo oh

Ah Yesu Klisto, ah Yesu Klisto eh ah eh

Liberté na ngai oh

Okokuta ngai maboko na moto nazozela liberté na ngai eh

Ah ngai natie mabolongo na se nazo zela liberté na ngai ekoka eh

Nasimbi motema na ngai, liberté oza wapi eh

Ah liberté na ngai eh, liberté na ngai eh

Yesu liberté oza wapi

Likama, likama nandimaki te ekokomela ngai boye

Ekokomela ngai boye

Ah Yesu Klisto, ah Yaya ya baleki eh

Ah liberté na ngai eh, Yaya oza wapi eh

Yesu Klisto liberté na ngai eh