Saison sèche ezalaka pe saison de pluie eh

Tango ya moyi ezalaka pe tango ya butu ezali oh

Mwasi na mobali oh likolo pe na se

Mabe na malamu eh, Nzambe pe satan

Ebale pe mokili oh, mozui pe mobala oh

Mokuse pe molayi oh, monene pe moke oh

Yaya pe leki yango babengi yango la loi de la nature oh maman

Saison sèche ezalaka pe saison de pluie eh

Tango ya moyi ezalaka pe tango ya butu ezali oh

Mwasi na mobali oh likolo pe na se

Mabe na malamu eh, Nzambe pe satan

Ebale pe mokili oh, mozui pe mobala oh

Mokuse pe molayi oh, monene pe moke oh

Yaya pe leki yango babengi yango la loi de la nature oh maman

Ah tika baloba na yo osila, ndeko na nga

La loi ya nature tango mosusu saison na yo te

Zela oyo ya yo ekokisama oko forcé te oh

Tuna basali ya Nzambe bakopesa ngai raison

Sepela oyo ya moninga

Po oyo ya yo tango ekokoka bakosepela n'ango oh

Butu ekomeli yo, yeba pe tongo ezali eh

Mabe ekomeli yo, yeba pe malamu ezali eh

Nazelaka kaka tango na ngai nakozala consolée

Po nayebi naza projet na Nzambe

Ekokokisama kaka eh maman eh

Défaite eyaka, réussite ezali oh

Problème eyaka solution ezali oh

Soki maladi eye guérison ezali eh

Nazela kaka tango na ngai eh

Ah eh soki maladi eye guérison ezali, oh

Nazela kaka tango na ngai eeh

Wo wo wo Yesu abenga ngai besoin na ye, mon amour

Eeeh

Uumh na moke namona makambo à l'aise nga ngonga ebeti

Merci Papa, olingaka moto lolenge azali ye nde ressemblance na yo

Bomoni tina Misamu akabolaka te po ya ngai ebeti lelo

Lobi pe ya basusu eh, Yesu akokufa pe pona bango eh

Ah, obwakisa moninga lakisa ye nzela lobiko

Au lieu obenga ye païen, lakisa ye nzela ya Tata oyo eh ma

Nga kutu batshiola ngai na baninga eh (Tina te na mokili eh)

Mwana mabe (Mwana mobola)

Bafinga ngai papa, bafinga ngai papa eh

Job asosolaki période ezongaki le double oh

Veuve ya Sarepta asosolaki akufaki nzala te oh

Mwasi ya ndumba asalelaki période na ye oh

Mwasi kotanga makila asalelaki période na ye oh

Yesu amonaki pasi esika oyo avandi na kiti ya bokonzi oh oh

Ah ebongo yo mwana osombami na makila ya talo

Olela po nini eh

Oyo batambola makolo lelo bakoma na mituka eh

Oyo bazanga kobota lelo bakoma bamama pasa eh

Oyo bazanga mabala lelo bavanda na mabala ya malonga

Oyo bakita na se oh, lelo atombola bango na lokumu oh mama eh

Nawela nini eh ngai eh

Naboma moto pona nini eh ngai eh

Ngai nasala kuluna pona nini eh ngai oh

Nafinga pona nini eh ngai

Nazela tango na ngai ekoka kino akosalela ngai oh

Ah, natia poison pona nini eh ngai oh eh mama eh

Nazela tango na ngai ekoka kino akosalela ngai

Nazela saison na ngai eh, kino ekobetela ngai oh mama

Nzambe asala ngai moyindo, asala ngai moke

Asala ngai mokuse nasepela ndenge nazali eh

Refrain : Nasali bino nini oh ma (x22)

Saison na ngai eh esuwa basusu te oh

Ah ngai mobola alokoti ngai nase

Hum naza na nini eh atomboli ngai likolo

Ngai nawuti Mayumbu amemi ngai na poto

Ah ngolu eh ma, eh

Munu kuenda Kinshasa

Munu bakila malongi

Munu landa nzila ya Nzambi eh

Samu yayi saison na munu

Wolowo yaya eh

Wolowo yaya eh (x3)

Ah ngai moteki nguba ememi bana na poto

Ah ngai mosoli bilanga esilisi kelasi ya bana eh

Nafanda na bicoque eh ememela ngai ba ndaku eh

Ah ngai mopusi pusu ememeli ngai ba kombi

Ah ngolu eh ma, ah ngolu eh

Munu kuenda Kinshasa

Munu bakila malongi

Munu landa nzila ya Nzambi eh

Samu yayi saison na munu

Wolowo yaya eh

Oh wolowo yaya, eee ngai

Nasali bino

Ah ngai moteki makala ememeli ngai ba depôts

Bafinga ngai kisita nakoma maman mapasa

Eeeh ngai mobola eee atomboli ngai likolo

Bafinga ngai ndumba nafandisa libala

Ah ngolu eh ma, ah ngolu eh

Munu kuenda Kinshasa

Munu bakila malongi

Munu landa nzila ya Nzambi eh

Samu yayi saison na munu

Wolowo yaya eh

Oh wolowo yaya

Bafinga ngai makisosila nasala eloko te eh

Ah ngai bapasi eh pasi nionso ya ngai

Ah ngai monimambu eh namona nde makambo

Yesu yango alokoti ngai ya mboka na ngai eh

Eh ngai oyo napesi eloko te oh

Ah ngolu eh ma, eh

Munu kuenda Kinshasa

Munu bakila malongi

Munu landa nzila ya Nzambi eh

Samu yayi saison na munu

Wolowo yaya eh

Oh wolowo yaya

Ah ngai shayeur eh ememeli ngai magasin

Kaka na malewa libota na ngai ezobika oh

Ngai moteki na zando ememeli ngai ba voyages

Ah ngai motumbi ntaba ememeli ngai mapango

Ah ngolu eh ma, eh

Munu kuenda Kinshasa

Munu bakila malongi

Munu landa nzila ya Nzambi eh

Samu yayi saison na munu

Wolowo yaya eh

Oh wolowo (x5) yaya

Ah presser na vie emema na lilita

Ndeko na ngai eh zela saison na yo

Ngonga na yo ekobeta okosepela lokola basusu

Kofinga te, koyina te, kotshiola te

Soki eye kanga frein

Makambu mabe eleka na mokili basusu bateka baninga

Likolo ya zuwa eh

Tika trahison, double pattes, tokoma na deux oh

Mbeli ya mino mibale, eh banga Nzambe

Mosika na mboka nani yango asalisa ngai eh

Mosika na mboka nani yango abikisa ngai eh

Eh mame ma wolowo...

(x2)