Intro :

Nid d'amour, lit d'amour

Ne deviens pas mon lit de mort

Eza opération ya motema

Sala yango na ndenge ya ba grand peintre, cicatrice emonana té

Bolingo ekomi kotambwisa nga lokola cheval, mowumbu kaka te

MODOGO BOTEKOLA, pesa nga raison

Epayi na nga je t'aime, epayi na ye mpe je t'aime

Finalement est-ce que okomi kosala tourisme ya ba je t'aime

Litama opesaki nga baiser ekomi nausée

Miso elulaki nga lelo ekomi kolula mbanda

Y’obengaka bébé, ye mpe lisusu bébé

Nani mwinda mpe nani elili, aaie

Ayé , bolingo ya lokuta condamnable

Stylo moko texte moko o changer kaka écriture

Est-ce-que oyo eza te oyo babengaka escroquerie

Nabanzaki lokola o tié nga embargo na motema

Nakokufa lokola nakufi te gloire à Dieu

Thermomètre e indicaki lobi amour quarante degré

Lelo epesi température y’amour douze degré

Maladie oyo bazwela kisi kutu ebomaka ngo ya

Bongo maladie y’amour nakobika comment

Souffrance ekomi résidente, permanente na motema he

Hee moto nalingi alingi nayé ngayi te oh

Ye pe epayi akeyi kolinga bazolinga ye te

A préféré asamba na tribunal oyo accusé pe plaignant kaka nse ye mei

Baninga tokeba bolingo ezali médicament

Kasi médicament avec ba contre-indication

Soki o souhaité ye bonne appétit keba akodundana yo mei

Soki opesi au revoir akoyoka adieu

Soki o souhaité ye bon sommeil kebaka moninga akoya kozongisela yo repose en paix

Motema oyo ekomaki lipasa n’oyo ya ngayi mei

Soki elingi caresse par télépathie nazalaki ko yeba

Soki elingi tendresse ezalaki servie à volonté

Nani à détourné lelo motema na lipasa

Soso ata a moni ba mpese kama pembeni ya kombekombe

Akobanga he ngayi mpe nabangi vie na ngayi

Dédicace …

Maboko na yo eza na makila ya bolingo na ngayi

Epayi na nga je t'aime, epayi na ye pe je t'aime

Finalement est-ce-que okomi kosala collection ya ba je t'aime

Litama opesaki nga baiser ekomi nausée

Miso elulaki nga lelo ekomi kolula mbanda

Y’obengaka bébé, ye mpe lisusu bébé

Est-ce-que nini osalaka nga osalaka mpe ye te ?

Oloba nga naloba

Lelo nandimi maloba ya moto ezalaka stylo

Ekomaka oui, ekomaka non sa dépend

Likonga ya montre na yo etelemi na onze heures

Na douze heures nazakolela ngonga eleli

Pile esili nto nini bolingo e traîné he

JHON PASU yo yo yo

JHON PASU moto ya bandoki bitumba esili tobongisa he

Bandoki yo osimbi nga arme na nga maloba he

Boma soki okoboma nzoto tikela nga molimo he

Nzambe akozongisa yo mokolo ya suka JHON PASU linga no nga

Y’oweli vilain na bombe nga moto ya Malueke

Ngoumba, diamant na wolo nioso kaka nse ba sous sol

Nakosenga au sécour ONU a tinda ba casques bleu

Mpo ba sauvé bolingo

Motema epusa mpe etangisi makila he

Opération te mbeli ya monganga té

Soki batuni nga nakoloba nini eh

Bati nga te mbeli kasi nazo saignée

JHON PASU pona yo eh, JHON PASU assassiné ngayi eh

Police emmène moi mon amour

Marabout envouté bien aimé

… bimisela nga ye na butu

Kisi ya bolingo nse boligo magie te oh

Nakosuka wapi JHON PASU fatigué oo

JHON PASU yoo yo yo, JHON PASU ngayi awa matanga

Yoo yo yo, ngai awa matanga he (3x)