Released on September 1993

Thumbnail

[Intro]

La bouche

Les yeux

Et Doless

Frissons


[Couplet 1]

Mosika oyo l'amour e choisir emema nga (nga mwana mama)

Yelele Do Doless nzoka nde Tido na maboko ma yo (ayoleli)

Tala ngai, dodo tala ngai

Moto nalingaka yo

Bomba na misasa na yo (l'amour na ngai)

Lokola makila na yo ya nzoto

Nzambe oyo l'amour (Kamba aimée tiya na motema na yo elili na nga)

Mama Santu Maria (pesa ye bosantu na yo na bokasi ayeba kolinga nga)

Lovie do (Masua manani pe mamemi oyo ya nga bolingo)

Na ngambo oyo na tikali (pinzoli na miso ekokahuka te, kokende motako te)

Nazali awa na etumbu ya bolingo

Na motema, Tido nga na bebi

Sala ozonga (yo Doless)

Soki omoni sanza mobimba eleki

Banza kotinda sango na yo na mbangu

Epayi Aimée na yo azali, mawa etingami ngaï


[Pré-refrain]

Mawa etingami ngaï

Mawa etingami nga


[Couplet 2]

Doless na nga mon amour, l'amour

Na miso lokola liseki

Na motema nzoka mbelengo Dodo

Keba keba na ya kozoka mpota

Dodo na nga


[Pré-refrain]

Mawa etingami ngaï

Mawa etingami ngaï

Mawa etingami nga


[Chœur]

Soki batuni nani chérie, kobomba te Tido

Yebisa bango po ba yeba té ngai nazali nkolo ya motema na yo


[Couplet 3]

Cheri na nga mwana moke

Kombo na ye Dodo Tido

Akelama na kitoko, esangana na lofundu

Asalaka nyoso tout kaka, se na songe ya misapi


[Couplet 4]

Je voudrais être un poisson et nager dans ton sang

Me faufiler dans ton esprit pour devenir toutes tes pensées

Dodo la nuit, Doless le jour

Aucun régime ne me va si bien


[Chœur]

Bolingo lokola bo ndeko tosololaka a demi-mots

Soki opesi ngaï mpembe, nakopesa yo moyindo

Soki opesi ngaï câlin, molimo na nga ozui yango mobimba

Soki osengi nga vie na nga, Lovie yeba na kopesa

Ata soki o préférer liso to loboko ndenge moko

Ba sourires na yo, regards na yo esilisaka ba besoins na nga

Ba mpangi oy'a Dodo beauté ezali sans reproche

Ah Doless aza (mbeli ya ba sakata)

Ah Dodo na nga (mbeli ya ba sakata)

Ah Bopeso


[Chœur]

Dodo Doless nga na mi pesi

Tido Doless nga na mi pesi

Dodo Doless nga na mi pesi

Tido Doless nga na mi pesi


[Chœur (avec dédicace de Koffi)]

Dodo Doless nga na mi pesi (Bazile Koue)

Tido Doless nga na mi pesi (Koffi Kofianto, Arthur Mbongo)

Dodo Doless nga na mi pesi (Anicet Pedro)

Tido Doless nga na mi pesi (Egide Citron)

Dodo Doless nga na mi pesi (Papa na Déborah, Bouboul Yondela)

Tido Doless nga na mi pesi

Dédicace de Koffi...