Released on June 25, 2009

Thumbnail

Pépitho Kilala

Sopela Youssouf bolingo neti na film ko

Le vieux Big Master

Suki na yo nzoka ezalaki

Kanga moyibi ekanga miso ma ngai

Ata natali nazomona mosusu te

À part toi, il n’y aura toujours que toi

Motema na nga ezalaki gratte-ciel

Yo okomisi yango poulailler

Ezanga kiti, mbeto te, sani, nzungu te

Ekomi kotonda makila lokola masuwa etoboki

Yo ozongisi nga na brouillon ami, malgré ba efforts nasali

Liloba na ngai mongongo ya ligorodo

Na matoyi ma yo ya angelu

Nasala nini na manzaka na suki otika

Nakanisela yo

Mawa ekoti lokola sete na cerveau bolingo ekeyi

Motema elalaki na mayi mais toujours ezozika koleka nkoni

Babengani nga na feti mawa na nga ezokomisa masanga bololo

Likolo eteli bandeke basepeli ba plage etondi

Ba mamans basokolaki ba uniforme mitema ekiti

Moyi na nga ongaleli wapi?

Han Pépitho moyi na nga ongaleli wapi?

Naluki yo na flambeau na maboko Kilala

Nini bozo tala tala ngai

Est-ce que nanu bomona te moto akweleli problème

Nabeleli ozoyoka nga te

Pepito keba mabele ekoya kofungwamlela nga

Mikolo ebele eleki sans yo ekomi ko terrifier ngai Kilala

Bipe nga ata na minuit tango mosusu ekozala somnifère

Bipe nga ata na minuit tango mosusu ekozala diazépam

Nasali petit déjeuner tongo tongo

Namemi na mbeto nzoka na bosanaki que osi okenda

Bilamba na ngai nionso ya pembe

Ekomi blanc cassé po yo nde omesana kosokola yango

Sala noki ozonga comportement ya Yousouf

Ekomi déréglé na esika ya sukali

Nakomi ko préférer mungwa

Bakosalela nga catafalque

Bakotia nga na libumu ya mabele

Pona yo dernier rêve de ma vie

Bakosalela nga catafalque

Bakotia nga na libumu ya mabele

Pona yo Pépitho Kilala

Maboko ya Yousouf ekomi kizengi

Po ezangi promenade n'ango

Likolo ya loposo na yo Pépitho

Bilengi na nga ebombami n'ango na kati ya nzoto na yo ya banjelu

Nabaluki, nabaluki, nabaluki, nabaluki

Nabaluki, nabaluki, nabaluki, nabaluki

Nzoto ekomi likonga ya montre likolo ya mbeto

Natala kitala-tala kala

Nzoka nakoma na regard ya ba kilau

Bakosalela nga catafalque

Bakotia nga na libumu ya mabele

Pona yo dernier rêve de ma vie

Bakosalela nga catafalque

Bakotia nga na libumu ya mabele

Pona yo Pépitho Kilala

Ha ha Nzambe, pitié pitié cessez le feu

Yoka mawa ata ndambu ya mawa Pépitho Kilala

Reciprocité ezalaka flèche d’aller accompagnée na oyo ya retour

Souci ya bolingo, chagrin percuté na motema awa o viré nga

Ouvrier ya pamba na bolingo na ye

Tala souci e engagé motema sans service

Akomi kofuta ba heures supplémentaires na jours fériés

Feuille ya motema nanga recto esi etondi na ba souci

Verso yango oyo ekomi na moitié

Sala o effacer ata ndambu nga nakowa na nga

Bakosalela nga catafalque

Bakotia nga na libumu ya mabele

Pona yo dernier rêve de ma vie

Bakosalela nga catafalque

Bakotia nga na libumu ya mabele

Pona yo Pépitho Kilala

Tosala lokola Pathy Nsaraza aza na Guigui Nsaraza

Naty Lokole Shilungu na Merry Lokole

Eddy Badiata apesaka na Hortance N'djoli

Patrick Bamala apesaka na Cocotte na ye

Fiston Koloke apesaka na Kabibi na ye

Jean-Luc Mukoko apesaka na Sylvie Boga na ye

Héritier Scram Well ya Christelle Kumbali

Bongo Papy Mboma apesaka na l'autre là eh

Colonel Kaniama, Mat Assurance, Freddy Mateka

Bolingo ewumelaka nzoka lipate

Ekweleli nga lelo lobi pe ekozala yo

Pasi na motema na nga

Kozanga eloko motema elinga

Wuta nakutana n'o ba carte rouge ya bolingo

Po nga nakoka ata lisusu kolinga te

Désir na yo, sentiment na ngai eh